Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 21:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe talá, sikoyo, likalo moko ya etumba ezali koya ná bato, ná farasa mibale oyo bakangisi esika moko!”+

      Bongo azwaki maloba mpe alobaki: “Akwei! Babilone akwei,+ mpe bikeko nyonso ya banzambe na ye oyo eyemami, abuki yango mpe elali na mabele!”+

  • Yirimia 51:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Na pwasa, Babilone akwei, bongo abukani.+ Bóganga na kolela mpo na ye.+ Bózwa balsame mpo na mpasi na ye.+ Mbala mosusu akobika.”

  • Yirimia 51:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 “Mopoti-mbangu moko azali kopota mbangu mpo na kokutana na mopoti-mbangu mosusu, mpe momemi-nsango moko mpo na kokutana na mo-memi-nsango mosusu,+ mpo na kopesa mokonzi ya Babilone nsango ete engumba na ye ezwami na nsuka nyonso,+

  • Yirimia 51:39
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 39 “Ntango bakoya mɔtɔ nakobongisela bango bafɛti mpe nakolangwisa bango, mpo básepela;+ mpe bakolala mpenza mpɔngi moko oyo ekoumela mpo na ntango oyo etyami ndelo te, oyo bakolamuka te,”+ yango nde liloba ya Yehova.

  • Yirimia 51:57
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 57 Mpe nakolangwisa bankumu na ye, bato na ye ya bwanya, baguvɛrnɛrɛ na ye, bayangeli-basungi na ye mpe bato na ye ya nguya,+ mpe bakolala mpɔngi moko oyo ekoumela mpo na ntango oyo etyami ndelo te, oyo na yango bakolamuka te,”+ yango nde liloba ya Mokonzi+ oyo nkombo na ye ezali Yehova ya mampinga.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto