2 Na mokolo yango, mwa nzete oyo Yehova akokolisa+ ekozala mpo na kitoko mpe mpo na nkembo,+ mpe mbuma ya mokili ekozala eloko moko ya komikumisa na yango+ mpe eloko moko kitoko mpo na bato ya Yisraele oyo babiki.+
6 Na mokolo yango, natombolaki lobɔkɔ na ngai+ mpe nalapelaki bango ndai ete nakobimisa bango na mokili ya Ezipito mpo na komema bango na mokili oyo nanɔngelaki bango, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+ Elekaki mikili nyonso na kitoko.+
16 Mpe moto oyo azali koya kobunda na ye akosala ndenge alingi, mpe moto moko te akotɛlɛma liboso na ye. Mpe akotɛlɛma na mokili Kitoko,+ mpe lobɔkɔ na ye ekozala na nguya ya kosilisa nyɛɛ.+
45 Mpe akopika bahema na ye oyo ezali lokola bandako minene kati na mbu monene mpe ngomba mosantu ya Kitoko;+ mpe akoya tii na nsuka na ye,+ mpe akozala na mosungi te.+