Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 30:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Yehova Nzambe na yo akokɔtisa mpenza yo na mokili oyo batata na yo bazwaki, mpe okozwa mpenza yango; mpe akosalela yo mpenza bolamu mpe akokómisa yo mingi koleka batata na yo.+

  • Yisaya 65:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe ya solo, bakotonga bandako mpe bakofanda kuna;+ mpe ya solo, bakolona bilanga ya vinyo mpe bakolya mbuma na yango.+

  • Yirimia 32:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpo talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Bandako ná bilanga mpe bilanga ya vinyo ekosombama lisusu na mokili oyo.’”+

  • Ezekiele 28:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Mpe bakofanda mpenza wana na kimya+ mpe bakotonga bandako+ mpe bakolona bilanga ya vinyo,+ mpe bakofanda mpenza na kimya+ ntango nakokweisa bitumbu likoló ya baoyo nyonso bazali kotyola bango bipai nyonso;+ mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova Nzambe na bango.”’”

  • Amose 9:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe nakozongisa bato na ngai, Yisraele, oyo bakangamaki,+ mpe bakotonga bingumba oyo etikalaki mpamba mpe bakofanda na kati na yango,+ mpe bakolona banzete ya vinyo mpe bakomɛla vinyo na yango, mpe bakosala bilanga mpe bakolya mbuma na yango.’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto