Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 72:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Na mikolo na ye, moyengebene akokola lokola matiti ya sika,+

      Mpe kimya ekokóma mingi kino sanza ekozala lisusu te.+

  • Yisaya 2:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe akokata mpenza makambo na kati ya bikólo,+ mpe akosembola makambo+ etali bato mingi ya bikólo.+ Mpe bakotula mipanga na bango mpo ekóma bitimweli ya mabele mpe makɔnga na bango mpo ekóma makwangola ya kokata matiti.+ Ekólo moko ekotombola mopanga te mpo na kobunda na ekólo mosusu, bakoyekola mpe etumba lisusu te.+

  • Yisaya 9:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Bonene ya boyangeli na ye+ mpe kimya, kiti ya bokonzi ya Davidi+ mpe bokonzi na ye, ekozala na nsuka te.+ Ekopikama makasi+ mpe ekosimbama na bosembo+ mpe na boyengebene,+ banda sikoyo mpe tii na ntango oyo etyami ndelo te. Molende mpenza ya Yehova ya mampinga nde ekosala yango.+

  • Yisaya 60:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 “Mobulu ekoyokana lisusu te na mokili na yo, kopunzama to kobukana na kati ya bandelo na yo.+ Mpe okobenga bifelo na yo Lobiko+ mpe baporte na yo Lisanzoli.

  • Matai 26:52
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 52 Bongo Yesu alobaki na ye ete: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango,+ mpo baoyo nyonso basalelaka mopanga bakokufa na mopanga.+

  • Baefese 6:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 mpo tozali kobunda etumba+ na makila mpe mosuni te, kasi na baguvɛrnema,+ na bakonzi,+ na bayangeli ya mokili+ ya molili oyo, na mampinga ya bilimo mabe+ na bisika ya likoló.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto