Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 10:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “Mpe sikoyo, Ee Yisraele, eloko nini Yehova Nzambe na yo azali kosɛnga yo+ soki ezali te kaka kobanga+ Yehova Nzambe na yo, elingi koloba, otambola na banzela na ye nyonso+ mpe olinga ye+ mpe osalela Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba;+

  • Masese 21:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpo na Yehova, kosalela boyengebene mpe bosembo ezali malamu koleka mbeka.+

  • Yisaya 1:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bóyekola kosala malamu;+ bóluka bosembo;+ bósembola moto oyo azali konyokola;+ bókata likambo mpo na mwana oyo tata akufá;+ bósamba likambo ya mwasi oyo mobali akufá.”+

  • Yirimia 22:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Talá oyo Yehova alobi: “Bókata likambo na bosembo mpe na boyengebene, mpe bóbikisa moto oyo bazali koyiba na lobɔkɔ ya mobubi; mpe moto oyo afandi mopaya, mwana mobali oyo tata akufá mpe mwasi oyo mobali akufá bómonisa bango mpasi te.+ Bónyokola bango te.+ Mpe na esika oyo, bósopa te makila ya moto oyo azali na likambo te.+

  • Ezekiele 45:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Bokei mosika, Ee bankumu ya Yisraele!’+

      “‘Bólongola mobulu mpe kopunza,+ mpe bósalela bosembo ná boyengebene mpenza.+ Bótika kobɔtɔla bato na ngai biloko,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.

  • Hosea 12:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 “Mpe yo osengeli kozongela Nzambe na yo,+ mpe batelá motema boboto+ mpe bosembo;+ mpe tyelá Nzambe na yo elikya ntango nyonso.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto