3 Mpo mabɔkɔ na bino ekómi mbindo na makila+ mpe misapi na bino ekómi mbindo na libunga. Mbɛbu na bino moko elobi lokuta.+ Lolemo na bino moko ezalaki se koloba na nse nse likambo ya kozanga boyengebene.+
2 Moto ya sembo alimwe na mabele, mpe moto ya makambo alima azali na kati ya bato te.+ Bango nyonso, bazelaka na kobombana mpo na kosopa makila.+ Balukaka kokanga, moto na moto ndeko na ye mpenza, na monyama.+