Masese 1:28 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 28 Na ntango yango, bakokoba kobenga ngai, kasi nakoyanola te;+ mpe bakokoba koluka ngai, kasi bakomona ngai te,+ Yisaya 1:15 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 15 Mpe ntango bozali kosembola mabɔkɔ na bino,+ nazali kozipa miso na ngai liboso na bino.+ Ata bozali kobondela mingi,+ nazali koyoka te;+ mabɔkɔ na bino etondi na makila oyo bosopi.+ Yoane 9:31 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 31 Toyebi ete Nzambe ayokaka basumuki te,+ kasi soki moto abangaka Nzambe mpe asalaka mokano na ye, ye ayokaka moto yango.+
28 Na ntango yango, bakokoba kobenga ngai, kasi nakoyanola te;+ mpe bakokoba koluka ngai, kasi bakomona ngai te,+
15 Mpe ntango bozali kosembola mabɔkɔ na bino,+ nazali kozipa miso na ngai liboso na bino.+ Ata bozali kobondela mingi,+ nazali koyoka te;+ mabɔkɔ na bino etondi na makila oyo bosopi.+
31 Toyebi ete Nzambe ayokaka basumuki te,+ kasi soki moto abangaka Nzambe mpe asalaka mokano na ye, ye ayokaka moto yango.+