21 Mpo Yehova akotɛlɛma lokola na Ngomba Perazime,+ akoningana lokola na lobwaku ya patatalu oyo ezali pene na Gibeone,+ mpo asala likambo na ye—likambo na ye ezali ya kokamwa—mpe mpo asala mosala na ye—mosala na ye ezali mosala moko oyo esalemá naino te.+
14 ngai oyo, Moto oyo akosala lisusu na bato oyo na ndenge ya kokamwa,+ na ndenge moko ya kokamwa mpe na eloko moko ya kokamwa; mpe bwanya ya bato na bango ya bwanya ekokufa mpenza, mpe mayele ya bato na bango ya mayele ekomibomba.”+
41 ‘Bótala yango, bino batyoli, mpe bókamwa na yango, mpe bólimwa, mpamba te nazali kosala mosala moko na mikolo na bino, mosala oyo bokondima yango soki moke te ata soki moto ayebisi bino yango moko na moko.’”+