Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 28:49
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 49 “Yehova akotɛlɛmisela yo ekólo moko ya mosika,+ longwa na nsuka ya mabele, kaka ndenge mpongo ekitelaka nyama na lombangu,+ ekólo moko oyo okokanga ntina ya monɔkɔ na yango te,+

  • Yirimia 5:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 “Ee ndako ya Yisraele, talá! nazali komemela bino ekólo moko uta na mosika,”+ yango nde liloba ya Yehova. “Ezali ekólo moko oyo eumeli.+ Ezali ekólo moko ya kala, ekólo oyo oyebi monɔkɔ na yango te, mpe okoki koyoka te oyo bazali koloba mpe kokanga ntina na yango.

  • Yirimia 6:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Talá oyo Yehova alobi: “Talá! Ekólo moko ezali kouta na mokili ya nɔrdi, mpe talá ekólo moko monene oyo ekolamuka longwa na nsukansuka ya mabele.+

  • Ezekiele 23:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 bana mibali ya Babilone+ mpe Bakaladea+ nyonso, Pekode,+ Shoa mpe Koa, bana mibali nyonso ya Asiri elongo na bango, bilenge mibali ya kitoko, baguvɛrnɛrɛ ná bayangeli-basungi bango nyonso, babundi mpe bato babengisami, bamati na bampunda, bango nyonso.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto