-
2 Bakonzi 23:12Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
12 Mpe bitumbelo oyo ezalaki likoló ya nsamba ya shambrɛ ya likoló+ ya Ahaze, oyo bakonzi ya Yuda basalaki, mpe bitumbelo+ oyo Manase asalaki na mapango mibale ya ndako ya Yehova, mokonzi akweisaki yango, nsima na yango, atutatutaki yango kuna, mpe abwakaki putulu na yango na lobwaku ya mokɛli ya Kidrone.
-
-
Yirimia 19:13Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
13 Mpe bandako ya Yerusaleme mpe bandako ya bakonzi ya Yuda esengeli kokóma lokola esika ya Tofete,+ bandako ya mbindo, elingi koloba, bandako nyonso oyo likoló ya bansamba na yango, bazalaki kobimisela limpinga mobimba ya likoló milinga ya mbeka+ mpe esika bazalaki kosopela banzambe mosusu makabo ya masanga.’”+
-