19 Mpe nakozongisa Yisraele na esika na ye ya koleisa banyama matiti,+ mpe akolya matiti na Karamele+ mpe na Bashane;+ mpe na etúká ya ngombangomba ya Efraime+ mpe ya Gileade+ molimo na ye ekotonda.’”
25 Bandeko, nalingi te ete bino bózanga boyebi ya sekele mosantu+ oyo, mpo bózala bato ya mayele na miso na bino moko te: ete motema ya bato mosusu ya Yisraele ekómi makasi+ tii motángo mobimba+ ya bato ya bikólo ekokɔta,+