Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 33:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Talá Siona,+ sité ya bileko na biso ya fɛti!+ Miso na yo ekomona Yerusaleme, esika ya kofanda oyo ezangi mitungisi, hema oyo moto moko te akolongola.+ Pike ya hema na yango ekopikolama te, mpe nsinga na yango ata moko te ekokatama.+

  • Yisaya 44:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Ye oyo akokisaka liloba ya mosaleli na ye, mpe Ye oyo akokisaka mokano ya bamemi-nsango na ye na mobimba na yango;+ Ye oyo azali koloba mpo na Yerusaleme ete: ‘Bato bakofanda kuna,’+ mpe mpo na bingumba ya Yuda ete: ‘Ekotongama lisusu,+ mpe bisika na yango oyo etikalá mpamba, nakotɛlɛmisa yango’;+

  • Yirimia 31:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Mpe kuna, Yuda ná bingumba na yango nyonso bakofanda elongo, baloni-bilanga mpe baoyo bakei na etonga.+

  • Yirimia 33:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Na esika oyo bino bokobanda koloba ete etikali se mpamba, moto azali te mpe nyama ya mboka ezali te, na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yerusaleme oyo etikali mpamba,+ moto azali te mpe moto afandi kuna te mpe nyama ya mboka ezali te, bakoyoka lisusu+

  • Zekaria 8:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Mibange mibali ná mibange basi bakofanda lisusu na bisika ya bato nyonso na Yerusaleme,+ mpe moto na moto ná lingenda+ na ye na lobɔkɔ mpo mikolo na ye ekozala mingi.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto