Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 34:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Ezala na butu to na moi, ekokufa te; molinga na yango ekomataka se komata kino ntango oyo etyami ndelo te.+ Akokauka libota na libota;+ moto moko te akoleka kuna libela na libela.+

  • Yirimia 49:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Boye, bóyoka mokano ya Yehova oyo abongisi mpo na Edome,+ mpe makanisi na ye oyo akanisi mpo na bato oyo bafandi na Temane:+ Ya solo, bakobendabenda bana-mpate ya etonga. Ya solo, mpo na bango, akosala ete esika na bango ya kofanda etikala mpamba.+

  • Ezekiele 25:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nakosembolela mpe Edome lobɔkɔ na ngai+ mpe nakolongola kuna moto ná nyama ya mboka,+ mpe nakokómisa yango esika oyo ebebisami banda na Temane,+ ɛɛ kino na Dedane.+ Bakokwea na mopanga.

  • Ezekiele 35:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe osengeli koloba na yango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai oyo nazali kobundisa yo, Ee etúká ya ngombangomba ya Seire,+ mpe nakosembolela yo lobɔkɔ na ngai+ mpe nakokómisa yo esika moko oyo etikali mpamba, ɛɛ libebi mpenza.+

  • Yoele 3:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Ezipito ekotikala mpamba;+ mpe Edome ekokóma esobe oyo etikali mpamba,+ mpo na mobulu oyo basalelaki bana ya Yuda, oyo na mokili na bango, basopaki makila ya moto oyo azali na likambo te.+

  • Obadia 10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Nsɔni ekozipa yo+ mpo na mobulu oyo osalelaki ndeko na yo Yakobo,+ mpe okolongolama mpenza mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto