Luka 6:28 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 28 kopambola baoyo bazali kolakela bino mabe, kobondela mpo na baoyo bazali kofinga bino.+ Luka 23:34 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 34 [[Kasi Yesu azalaki koloba ete: “Tata, limbisá+ bango, mpo bazali koyeba oyo bazali kosala te.”]] Lisusu, babwakaki mbɛsɛ mpo na kokabola bilamba na ye.+ Misala 7:60 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 60 Na nsima, agumbaki mabɔlɔngɔ na ye, agangi na mongongo makasi ete: “Yehova, kotángela bango lisumu oyo te.”+ Mpe nsima ya koloba bongo alalaki na kati ya liwa. Baroma 12:14 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 14 Bópambolaka baoyo bazali konyokola bino;+ bópambolaka+ mpe bólakelaka mabe te.+
34 [[Kasi Yesu azalaki koloba ete: “Tata, limbisá+ bango, mpo bazali koyeba oyo bazali kosala te.”]] Lisusu, babwakaki mbɛsɛ mpo na kokabola bilamba na ye.+
60 Na nsima, agumbaki mabɔlɔngɔ na ye, agangi na mongongo makasi ete: “Yehova, kotángela bango lisumu oyo te.”+ Mpe nsima ya koloba bongo alalaki na kati ya liwa.