Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 53:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Tozalaki koyengayenga biso nyonso lokola bampate;+ tozalaki kobaluka moto na moto na nzela na ye moko; mpe Yehova ye moko asali ete libunga na biso nyonso ekwela moto wana.+

  • Yirimia 50:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bato na ngai bakómi etonga ya bampate oyo ezali kokufa.+ Babateli na bango batiki bango báyengayenga.+ Bamemi bango likoló ya bangomba.+ Bauti na ngomba, bakei na ngomba moke. Babosani esika na bango ya kopema.+

  • Ezekiele 34:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Bampate na ngai ezalaki se kobunga na bangomba nyonso mpe na bangomba mike nyonso oyo etombwaná;+ mpe bampate na ngai+ epalanganaki na mabele mobimba, kozanga ete moto aluka yango mpe kozanga ete moto aluka komona yango.

  • Misala 13:46
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 46 Mpe na yango, Paulo ná Barnabasi bazalaki koloba na mpiko, balobi: “Esengelaki liloba ya Nzambe esakolama liboso epai na bino.+ Lokola bozali kobwaka yango+ mpe bozali komona ete bobongi te na bomoi ya seko, talá! tobaluki epai ya bikólo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto