Masese 21:13 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 13 Moto nyonso oyo azali kokanga litoi na ye na koganga ya komilelalela ya moto oyo azangá,+ ye moko mpe akobenga kasi bakoyanola ye te.+ Matai 6:14 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 14 “Mpo soki bozali kolimbisa bato mabunga na bango, Tata na bino ya likoló akolimbisa mpe bino;+ Marko 11:25 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 25 Mpe ntango botɛlɛmi mpe bozali kobondela, bólimbisa+ mabe nyonso oyo moto asalaki bino; mpo Tata na bino oyo azali na likoló alimbisa bino mpe mabunga na bino.”+ Luka 17:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Bókeba. Soki ndeko na yo asali lisumu pamelá ye,+ mpe soki abongoli motema limbisá ye.+ Baefese 4:32 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 32 Kasi bózala na boboto+ na kati na bino, bóyokelanaka mpenza mawa,+ bólimbisanaka na motema moko ndenge Nzambe mpe, na nzela ya Kristo, alimbisaki bino na motema moko.+
13 Moto nyonso oyo azali kokanga litoi na ye na koganga ya komilelalela ya moto oyo azangá,+ ye moko mpe akobenga kasi bakoyanola ye te.+
25 Mpe ntango botɛlɛmi mpe bozali kobondela, bólimbisa+ mabe nyonso oyo moto asalaki bino; mpo Tata na bino oyo azali na likoló alimbisa bino mpe mabunga na bino.”+
32 Kasi bózala na boboto+ na kati na bino, bóyokelanaka mpenza mawa,+ bólimbisanaka na motema moko ndenge Nzambe mpe, na nzela ya Kristo, alimbisaki bino na motema moko.+