Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 53:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Kasi atɔbɔlamaki+ mpo na misala na biso ya kobuka mibeko;+ anyatamaki mpo na mabunga na biso.+ Etumbu oyo esengelaki mpo na kimya na biso ezalaki likoló na ye,+ mpe mpo na bampota+ na ye tobiki.+

  • Danyele 9:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 “Mpe nsima ya pɔsɔ yango ntuku motoba na mibale (62), Masiya akolongolama,+ akotikala na eloko moko te.+

      “Mpe engumba ná esika mosantu,+ bato ya mokambi moko oyo azali koya bakobebisa yango.+ Mpe nsuka na yango ekozala na nzela ya mpela. Mpe tii na nsuka ekozala etumba; oyo ekanami ezali libebi na libebi.+

  • Zekaria 13:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “Ee mopanga, lamuká mpo na kotɛmɛla mobateli ya mpate na ngai,+ ɛɛ mpo na kotɛmɛla mobali makasi oyo azali moninga na ngai,”+ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga. “Bɛtá mobateli ya mpate,+ mpe bampate ya etonga epanzana;+ mpe nakozongisela mpenza baoyo bazali moke lobɔkɔ na ngai.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto