Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 18:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Nakotɛlɛmisela bango mosakoli moko oyo akouta na kati na bandeko na bango, lokola yo;+ mpe nakotya mpenza maloba na ngai na monɔkɔ na ye,+ mpe akoyebisa bango mpenza mitindo nyonso oyo nakopesa ye.+

  • Luka 7:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe bango nyonso babangaki,+ mpe babandaki kokumisa Nzambe mpe koloba ete: “Mosakoli+ monene abimi na kati na biso,” mpe, “Nzambe atyeli bato na ye likebi.”+

  • Yoane 3:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Moto yango ayaki epai na ye na butu+ mpe alobaki na ye ete: “Rabi,+ toyebi ete yo, ozali moteyi+ oyo auti na Nzambe;+ mpo moto moko te akoki kosala bilembo+ oyo ozali kosala soki Nzambe azali na ye te.”+

  • Yoane 6:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Bongo ntango bato bamonaki bilembo oyo asalaki, babandaki koloba ete: “Oyo azali solo mpenza mosakoli+ oyo asengelaki koya na mokili.”

  • Misala 2:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 “Mibali ya Yisraele, bóyoka maloba oyo: Yesu Monazarete,+ mobali oyo Nzambe amonisaki bino polele na nzela ya misala ya nguya+ mpe na makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya mpe na bilembo oyo Nzambe asalaki na nzela na ye katikati na bino,+ ndenge bino moko boyebi,

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto