Matai 9:6 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Nzokande, mpo bóyeba ete Mwana ya moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu awa na mabele+—” bongo alobaki na mokatatali yango ete: “Tɛlɛmá, lɔkɔtá mbeto na yo, mpe kende epai na yo.”+ Marko 2:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 “Nalobi na yo: Tɛlɛmá, lɔkɔtá litɔkɔ na yo, mpe kende epai na yo.”+ Yoane 5:8 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 8 Yesu alobaki na ye ete: “Tɛlɛmá, lokɔtá litɔkɔ na yo mpe tambolá.”+
6 Nzokande, mpo bóyeba ete Mwana ya moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu awa na mabele+—” bongo alobaki na mokatatali yango ete: “Tɛlɛmá, lɔkɔtá mbeto na yo, mpe kende epai na yo.”+