Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 2:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe Yehova Nzambe asalaki moto na putulu+ ya mabele+ mpe apemaki na kati ya zolo na ye mpema ya bomoi,+ mpe moto akómaki molimo ya bomoi.+

  • Ebandeli 6:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 “Mpe talá, ngai nazali koyeisa mpela+ na mabele mpo na kobebisa na nse ya lola ekelamu nyonso ya mosuni oyo nguya ya bomoi+ ezali kosala na kati na yango. Eloko nyonso oyo ezali na mabele ekokufa.+

  • Yobo 33:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  4 Elimo ya Nzambe nde esalaki ngai,+

      Mpe mpema ya Mozwi-ya-Nguya-Nyonso nde epesaki ngai bomoi.+

  • Mosakoli 3:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpo bana ya bato bazali na nsuka mpe nyama ezali na nsuka, mpe bakosuka ndenge moko.+ Ndenge oyo akufaka, oyo mosusu mpe akufaka;+ mpe bango nyonso bazali na elimo kaka moko,+ yango wana moto aleki nyama te, mpo nyonso ezali mpamba.

  • Yisaya 42:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Talá oyo Nzambe ya solo, Yehova, alobi, ye Mozalisi ya likoló+ mpe Nzambe Monene oyo atandá yango;+ Ye oyo atandá mabele+ mpe mbuma na yango,+ Ye oyo azali kopesa mpema+ na bato oyo bafandi wana,+ mpe elimo na baoyo bazali kotambola wana:+

  • Emoniseli 11:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpe nsima ya mikolo misato ná ndambo+ elimo ya bomoi oyo euti na Nzambe ekɔtelaki bango,+ mpe batɛlɛmaki na makolo na bango, mpe bato oyo bazalaki kotala bango babangaki makasi.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto