24 “Moto moko te akoki kozala moombo ya bankolo mibale; mpo to akoyina oyo mpe akolinga mosusu,+ to akokangama na oyo mpe akotyola mosusu. Bokoki te kozala baombo ya Nzambe mpe ya Bomɛngo.+
14 Oyo ekweaki na kati ya banzubɛ, yango nde bato oyo bayoki, kasi, lokola mitungisi mpe bomɛngo mpe bisengo+ ya bomoi etambwisi bango motó, bayoki nkaka bipai nyonso mpe babimisi eloko moko te na kokoka.+
9 Nzokande, bato oyo balingaka kaka kozala bazwi bakweaka na komekama+ mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi,+ oyo ezindisaka bato na libebi mpe na likama.+