2 Moto yango ayaki epai na ye na butu+ mpe alobaki na ye ete: “Rabi,+ toyebi ete yo, ozali moteyi+ oyo auti na Nzambe;+ mpo moto moko te akoki kosala bilembo+ oyo ozali kosala soki Nzambe azali na ye te.”+
31 Nzokande, mingi na kati ya ebele wana ya bato bandimelaki ye;+ mpe babandaki koloba ete: “Ntango Kristo akoya, akosala nde bilembo+ mingi koleka oyo moto oyo asali?”
25 Yesu ayanolaki bango ete: “Nayebisaki bino, kasi bozali kondima te. Misala oyo nazali kosala na nkombo ya Tata na ngai, yango nde ezali kopesa litatoli mpo na ngai.+