-
Danyele 9:26Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
26 “Mpe nsima ya pɔsɔ yango ntuku motoba na mibale (62), Masiya akolongolama,+ akotikala na eloko moko te.+
“Mpe engumba ná esika mosantu,+ bato ya mokambi moko oyo azali koya bakobebisa yango.+ Mpe nsuka na yango ekozala na nzela ya mpela. Mpe tii na nsuka ekozala etumba; oyo ekanami ezali libebi na libebi.+
-
-
Misala 28:17Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
17 Nzokande, mikolo misato na nsima abengaki baoyo bazalaki bato minene na kati ya Bayuda. Ntango bayanganaki, abandaki koloba na bango ete: “Mibali, bandeko, atako nasalaki eloko moko te ya mabe epai ya bato to na mimeseno ya bankɔkɔ na biso,+ nakabamaki lokola moto ya bolɔkɔ uta na Yerusaleme na mabɔkɔ ya Baroma.+
-