26 Kasi mosungi yango, elimo santu, oyo Tata akotinda na nkombo na ngai, ye nde akoteya bino makambo nyonso mpe akozongisa na makanisi na bino makambo nyonso oyo nayebisaki bino.+
3 Bongo, bandeko, bóluka+ na kati na bino mibali nsambo ya lokumu malamu, oyo batondi na elimo mpe na bwanya,+ mpo tótya bango na mokumba oyo ya ntina;
12 Bamonisaki bango ete ezali mpo na bango te,+ kasi mpo na bino nde bazalaki kosala makambo oyo ezali kosakolama+ sikoyo epai na bino na nzela ya baoyo basakwelaki bino nsango malamu na nzela ya elimo santu+ oyo etindamaki uta na likoló. Makambo wana nde baanzelu bazalaka na mposa ya kotalatala.+