6 “Na yango lobá na bana ya Yisraele ete: ‘Ngai Yehova, mpe ngai nakolongola mpenza bino na mikumba ya kilo ya Baezipito mpe nakobikisa bino na boombo na bango,+ mpe ya solo nakosikola bino na lobɔkɔ oyo esembolami mpe na bitumbu minene.+
8 Na yango, Yehova atikaki motema ya Farao, mokonzi ya Ezipito, ekóma makasi,+ mpe azalaki kolanda bana ya Yisraele, wana bana ya Yisraele bazalaki kobima mabɔkɔ likoló.+
6 Mpo yo ozali ekólo moko mosantu na miso ya Yehova Nzambe na yo.+ Yo nde Yehova Nzambe na yo aponi mpo okóma ekólo na ye, eloko na ye moko, kati na bato ya bikólo nyonso oyo ezali na mabele.+