Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yobo 34:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpo akofuta moto ya mabele na kolanda ndenge ye azali kosala,+

      Mpe ndenge nzela ya moto ezali, akoyeisa yango na motó na ye.

  • Nzembo 62:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Lisusu motema boboto ezali ya yo, Ee Yehova,+

      Mpo yo moko ozongiselaka moto na moto na kolanda mosala na ye.+

  • Masese 24:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Soki okoloba: “Talá! Toyebaki likambo yango te,”+ ye oyo amekamekaka mitema mpo na koyeba ndenge ezali, ye moko akososola nde yango te+ mpe ye oyo azali kotalatala molimo na yo, ye moko akoyeba+ yango mpe akofuta moto ya mabele na kolanda mosala na ye te?+

  • Ezekiele 18:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 “‘Na yango, Ee ndako ya Yisraele, nakosambisa bino moto na moto na kotalela banzela na ye,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.+ ‘Bóbongwana, ɛɛ, bóbongwana, bótika misala na bino nyonso ya kobuka mibeko,+ mpe eloko moko te ezala libaku oyo ezali kosalisa bino libunga.+

  • Matai 16:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpo Mwana ya moto asengeli koya na nkembo ya Tata na ye elongo na baanzelu na ye, mpe akopesa moto na moto mbano na kolanda etamboli na ye.+

  • Yoane 5:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 mpe bakobima, baoyo basalaki makambo ya malamu bakobima mpo na lisekwa ya bomoi,+ baoyo bazalaki kosala makambo ya mabe mpo na lisekwa ya kosambisama.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto