-
Kolimbola Mibeko 30:16Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
16 Soki okoyoka mitindo ya Yehova Nzambe na yo, oyo nazali kopesa yo lelo, elingi koloba olinga Yehova Nzambe+ na yo, otambola na banzela na ye mpe obatela mitindo+ na ye mpe mibeko na ye mpe bikateli na ye ya lisambisi,+ okozanga te kotikala na bomoi+ mpe kokóma mingi, mpe Yehova Nzambe na yo akopambola yo mpenza na mokili oyo ozali kokende kozwa.+
-
-
Nehemia 9:29Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
29 Atako ozalaki kotatwela+ bango mpo na kozongisa bango na mobeko na yo,+ bango bazalaki kaka kosala makambo na lofundo+ mpe bayokaki mitindo na yo te; basalelaki bikateli na yo ya lisambisi+ lisumu,+ bikateli oyo, soki moto alandi yango, akozala na bomoi na nzela na yango.+ Mpe bazalaki kaka kokanga matoi,*+ mpe bakómisaki motó na bango makasi,+ mpe bayokaki te.+
-