29 Bókamata ekanganeli+ na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai,+ mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto+ mpe na komikitisa na motema, mpe milimo na bino ekopema.+
19 nazalaki kosalela Nkolo lokola moombo+ na elimo ya komikitisa mingi koleka+ mpe na mpisoli mpe na komekama oyo ekómelaki ngai mpo na makita mabe+ ya Bayuda;
3 Mpamba te na boboto monene oyo bamoniselaki ngai nazali koyebisa moto nyonso na kati na bino ete akanisa te ete azali koleka ndenge oyo ye azali mpenza;+ kasi akanisa nde na ndenge oyo ezali komonisa ete azali na makanisi malamu,+ moto na moto na kolanda bonene+ ya kondima+ oyo Nzambe akabeli ye.
5 Ndenge moko mpe, bino bilenge, bómikitisaka+ liboso ya mikóló. Nzokande bino nyonso bólata ezaleli ya komikitisa na kati na bino,+ mpo Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.+