25 Na yango bayekoli mosusu balobaki na ye ete: “Tomoni Nkolo!” Kasi ye alobaki na bango ete: “Soki namoni elembo ya nsɛtɛ na mabɔkɔ na ye te mpe soki natye mosapi na ngai na elembo ya nsɛtɛ yango te mpe soki natye lobɔkɔ na ngai na kati ya mopanzi na ye+ te, nakondima ata moke te.”+