4 Mpe akosambisa na boyengebene mpenza bato oyo bazangá,+ mpe akopamela na kolongobana mpo na bolamu ya bato ya komikitisa oyo bazali na mabele. Mpe akobɛta mpenza mabele na fimbo ya monɔkɔ na ye;+ mpe na elimo ya mbɛbu na ye akoboma moto mabe.+
15 Mpe mopanga moko ya molai oyo epeli makasi ezali kobima na monɔkɔ na ye,+ mpo abɛta na yango bikólo, mpe akokamba bango na lingenda moko ya ebende.+ Azali mpe konyata mbuma na ekamwelo ya vinyo+ ya nkanda makasi ya Nzambe+ Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.