5 mpe bópesa mbote na lisangá oyo ezali na ndako na bango.+ Bópesa mbote na ndeko na ngai ya bolingo Epenete, oyo azali mbuma ya liboso+ ya Azia mpo na Kristo.
19 Masangá ya Azia etindeli bino mbote.+ Akila ná Priska elongo na lisangá oyo ezali na ndako na bango+ bapesi bino mbote na motema mobimba na kati ya Nkolo.