Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 61:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 61 Elimo ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso ezali na ngai,+ mpo Yehova atye ngai mafuta+ mpo nayebisa bato ya komikitisa nsango malamu.+ Atindi ngai nakanga mpota ya bato oyo bazoki na mitema,+ nasakola bonsomi epai ya baoyo bakangami+ mpe nafungola polele miso ya bato ya bolɔkɔ;+

  • Luka 3:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 mpe elimo santu oyo emonanaki lokola ebenga ekitelaki ye, mpe mongongo moko eutaki na likoló ete: “Yo ozali Mwana na ngai ya bolingo; nandimi yo.”+

  • Luka 4:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 “Elimo ya Yehova+ ezali na ngai, mpo atye ngai mafuta mpo nasakwela babola nsango malamu, atindi ngai mpo nasakwela baoyo bakangami kosikolama mpe nafungola miso ya bato oyo bakufá miso, mpo natika bato oyo batutamá bákende na bonsomi,+

  • Misala 4:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Kutu, Erode ná Ponse Pilate+ ná bato ya bikólo, elongo na bato ya Yisraele, bayanganaki mpenza na kati ya engumba oyo mpo na kotɛmɛla mosaleli na yo mosantu+ Yesu, oyo yo otyaki mafuta,+

  • Misala 10:38
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 38 elingi koloba, Yesu oyo azalaki moto ya Nazarete, ndenge Nzambe atyaki ye mafuta na elimo santu+ mpe na nguya, mpe akatisaki mokili yango mobimba, azalaki kosala malamu mpe kobikisa baoyo nyonso banyokwami na Zabolo;+ mpo Nzambe azalaki elongo na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto