29 Mpe moto nyonso oyo atiki bandako to bandeko ya mibali to bandeko ya basi to tata to mama to bana to bilanga mpo na nkombo na ngai akozwa biloko yango mbala mingi koleka mpe akozwa libula ya bomoi ya seko.+
34 “Bongo mokonzi akoloba na baoyo bazali na lobɔkɔ na ye ya mobali: ‘Bóya, bino baoyo Tata na ngai apambolá,+ bózwa libula+ ya bokonzi+ oyo babongiselá bino banda mokili ebandá.*+
5 Bandeko na ngai ya bolingo, bóyoka. Nzambe aponaki baoyo bazali babola+ na mokili mpo bázala bazwi+ na kati ya kondima mpe bázala bazwi-ya-libula ya bokonzi, oyo alakaki baoyo balingaka ye,+ boye te?