11 Lokola mobateli ya mpate, akobatela etonga na ye moko.+ Na lobɔkɔ na ye akoyanganisa bana-mpate;+ mpe akomema yango na ntolo na ye.+ Oyo ezali komɛlisa mabɛlɛ, akotambwisa yango malɛmbɛmalɛmbɛ.+
16 Alobaki na ye lisusu, mpo na mbala ya mibale ete: “Simo mwana ya Yoane, olingaka+ ngai?” Alobaki na ye ete: “Ɛɛ, Nkolo, oyebi ete nalingaka yo mingi.” Alobaki na ye ete: “Batelá bampate na ngai ya mike.”+