35 “‘Mpe soki ndeko na yo oyo azali elongo na yo akómi mobola mpe azangi mbongo,+ osengeli kosunga ye.+ Asengeli kotikala na bomoi elongo na yo ndenge moko na moto oyo afandi mopaya mpe moto oyo autá na mboka mosusu.+
7 “Soki moko ya bandeko na yo akómi mobola epai na yo na moko ya bingumba na yo, na mokili na yo oyo Yehova Nzambe na yo azali kopesa yo, osengeli te koyeisa motema na yo makasi to kokangela ndeko na yo mobola lobɔkɔ.+
16 kasi moko na bino alobi na bango ete: “Bókende na kimya, bóyɔta mɔtɔ mpe bólya malamu,” nzokande bopesi bango te biloko oyo esengeli mpo na nzoto na bango, litomba ezali wapi?+