10 Mpe baoyo Yehova asikoli bakozonga+ mpe ya solo bakoya na Siona na koganga ya esengo;+ mpe esengo ekozala na motó na bango mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Bakosepela mpe bakozala na esengo, mpe mawa ná kokimela ekokima mpenza.+
19 Mpe nakozala na esengo mpo na Yerusaleme mpe nakosepela na bato na ngai;+ mpe makɛlɛlɛ ya kolela ekoyokana lisusu te epai na ye to makɛlɛlɛ ya komilelalela.”+