Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 26:63, 64
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 63 Wana nde bato oyo Moize ná Eleazare nganga-nzambe bakomisaki nkombo, ntango bakomisaki Bayisraele nkombo na mokili patatalu oyo ekauká ya Moabe pembeni na Yordani, na Yeriko. 64 Kasi na kati na bango, moto moko azalaki te na kati ya baoyo Moize ná Arona nganga-nzambe bakomisaki nkombo, ntango bakomisaki Bayisraele nkombo na esobe ya Sinai.+

  • Kolimbola Mibeko 2:14
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Kobanda Kadeshe-barnea tii kokatisa Lobwaku* ya Zerede, ezwaki biso mbula 38, tii mibali nyonso ya etumba ya ntango wana basilaki na kaa, kaka ndenge Yehova alapelaki bango ndai.+

  • 1 Bakorinti 10:5
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Kasi, Nzambe asepelaki te na mingi na bango, mpo abomaki bango na esobe.+

  • Baebre 3:17
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Lisusu, banani Nzambe alɛmbaki na boumeli ya mbula 40?+ Ezalaki te nde bato oyo basalaki lisumu mpe bakufaki na esobe?+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto