13 Mpe ndambo oyo etikalaki ya Gileade mpe Bashane mobimba ya bokonzi ya Oge, napesi yango na ndambo moko ya libota ya Manase.+ Etúká mobimba ya Argobe ya Bashane, yango ebengamaki mokili ya Barefaime.
31 Mpe ndambo ya Gileade, mpe Ashetarote mpe Edrei,+ bingumba ya teritware ya bokonzi ya Oge na Bashane, ekendaki epai ya bana ya Makire,+ mwana ya Manase, elingi koloba epai ya ndambo ya bana ya Makire, na kolanda mabota na bango.
17Nsima ya kobwaka mbɛsɛ,+ libula ya libota ya Manase+ ebimaki, mpo azalaki mwana ya liboso ya Yozefe.+ Lokola Makire,+ mwana ya liboso ya Manase, mpe tata ya Gileade, azalaki moto ya etumba, bapesaki ye Gileade mpe Bashane.+