Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 3:16, 17
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe Barubene ná Bagade,+ napesi bango banda na Gileade tii na Lobwaku* ya Arnone, na katikati ya lobwaku, mpo ezala ndelo, mpe tii na Yaboke, lobwaku oyo ezali ndelo ya Baamone, 17 ná Araba, Yordani mpe ndelo na yango, banda na Kinerete tii na Mbu ya Araba, Mbu ya Mungwa,* esika mopanzi ya Pisga ekiti na nse, na ɛsti.+

  • Yosua 11:1, 2
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Ntango kaka Yabine mokonzi ya Hazore ayokaki yango, atindaki maloba epai ya Yobabe mokonzi ya Madone,+ epai ya mokonzi ya Shimirone, epai ya mokonzi ya Akashafe,+ 2 epai ya bakonzi oyo bazalaki na nɔrdi na etúká ya ngombangomba, mpe baoyo bazalaki na mokili patatalu* na sudi ya Kinerete, mpe baoyo bazalaki na Shefela, mpe na bisika oyo bangomba ekitá na Dore+ na wɛsti,

  • Luka 5:1
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mokolo moko, ntango Yesu atɛlɛmaki pembeni ya laki ya Genezarete,*+ ebele ya bato bazalaki kokanganakangana na ye mpo na koyoka liloba ya Nzambe.

  • Yoane 6:1
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Nsima na yango, Yesu akatisaki na ngámbo mosusu ya mbu ya Galile, to ya Tiberiase.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto