Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 32:33
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Na yango, Moize apesaki bana ya Gade, bana ya Rubene,+ mpe ndambo ya libota ya Manase+ mwana ya Yozefe, bokonzi ya Sihone+ mokonzi ya Baamore mpe bokonzi ya Oge+ mokonzi ya Bashane, mokili ya bingumba na yango, oyo ezali na bateritware yango, mpe bingumba ya mokili ya zingazinga.

  • Kolimbola Mibeko 3:12, 13
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Na ntango wana, tozwaki mokili yango: longwa na Aroere,+ oyo ezali pene na Lobwaku* ya Arnone, mpe etúká ya ngombangomba ya Gileade kabola na mibale, mpe napesi bingumba na yango epai ya Barubene mpe Bagade.+ 13 Mpe ndambo oyo etikalaki ya Gileade mpe Bashane mobimba ya bokonzi ya Oge, napesi yango na ndambo moko ya libota ya Manase.+ Etúká mobimba ya Argobe ya Bashane, yango ebengamaki mokili ya Barefaime.

  • Yosua 13:8
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Elongo na ndambo mosusu ya libota ya Manase, Barubene ná Bagade bazwaki libula na bango, teritware oyo Moize apesaki bango na ngámbo ya ɛsti ya Yordani, ndenge kaka Moize mosaleli ya Yehova apesaki bango:+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto