Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 17:5, 6
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Bongo Yehova alobaki na Moize ete: “Leká liboso ya bato mpe zwá bato mosusu kati na bankulutu ya Yisraele bázala elongo na yo mpe zwá lingenda na yo oyo obɛtaki na yango Ebale Nile.+ Zwá yango na lobɔkɔ na yo mpe kende. 6 Mpe talá! nakotɛlɛma liboso na yo kuna likoló ya libanga na Horebe. Osengeli kobɛta libanga, mpe mai ekobima na yango, mpe bato bakomɛla yango.”+ Moize asalaki bongo na miso ya bankulutu ya Yisraele.

  • Nzembo 78:15
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Apasolaki mabanga na esobe,

      Asilisaki mposa na bango ya mai lokola nde na mai mozindo.+

  • Nzembo 105:41
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 41 Afungolaki libanga, mpe mai etíyolaki;+

      Yango etíyolaki na mokili ekauká lokola ebale.+

  • Nzembo 114:8
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Oyo azali kobongola libanga ekóma etima oyo etondi na matiti,

      Libanga ya silekisi na maziba ya mai.+

  • Yisaya 48:21
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Bayokaki mposa ya mai te ntango azalaki kotambwisa bango na bisika oyo ekauká.+

      Abimiselaki bango mai na libanga;

      Apasolaki libanga mpe asalaki ete mai ebima.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto