-
Basambisi 17:3-5Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
3 Bongo azongiselaki mama na ye shekele yango ya palata 1 100, kasi mama na ye alobaki: “Nakosantisela mpenza Yehova palata na ngai. Nalingi osalela yango mpo na kosala ekeko oyo eyemami mpe ekeko ya ebende.*+ Na yango nazongiseli yo palata yango.”
4 Nsima ya kozongisela mama na ye palata yango, mama na ye azwaki shekele ya palata 200 mpe apesaki yango moto oyo asalaka biloko ya palata. Moto yango asalaki ekeko oyo eyemami mpe ekeko ya ebende;* mpe batyaki bikeko yango na ndako ya Mika. 5 Mika azalaki na ndako moko ya banzambe ya bikeko; asalaki efode+ ná bikeko ya banzambe ya libota,*+ mpe atyaki* mwana na ye moko ya mobali azala nganga-nzambe na ye.+
-