-
2 Samwele 19:41, 42Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
41 Na nsima, mibali nyonso ya Yisraele bakendaki epai ya mokonzi mpe balobaki na ye: “Ee mokonzi, mpo na nini bandeko na biso, mibali ya Yuda, bayibi yo ná libota na yo mpe mibali na yo nyonso mpe bakatisi bino Yordani?”+ 42 Mibali nyonso ya Yuda bayanolaki mibali ya Yisraele ete: “Tosali bongo mpo mokonzi azali moto ya libota na biso.+ Sikoyo mpo na nini bosiliki? Boyoki ete mokonzi apesi biso ata eloko ya kolya to likabo?”
-