-
2 Samwele 6:9-11Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
9 Bongo, Davidi akómaki kobanga Yehova+ na mokolo yango, mpe alobaki: “Ndenge nini Sanduku ya Yehova ekoki koya epai na ngai?”+ 10 Davidi alingaki lisusu te bámema Sanduku ya Yehova epai na ye, na Sité ya Davidi.+ Kasi, Davidi atindaki yango na ndako ya Obede-edome+ moto ya Gate.
11 Sanduku ya Yehova efandaki sanza misato na ndako ya Obede-edome moto ya Gate, mpe Yehova azalaki se kopambola Obede-edome ná bato nyonso ya ndako na ye.+
-