Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Samwele 10:1-5
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Na nsima mokonzi ya Baamone+ akufaki, mpe mwana na ye Hanune akómaki mokonzi na esika na ye.+ 2 Na yango Davidi alobaki: “Nakomonisela Hanune mwana ya Nahashe bolingo ya sembo, ndenge tata na ye amoniselaki ngai bolingo ya sembo.” Bongo Davidi atindaki basaleli na ye bákende kobɔndisa Hanune mpo na liwa ya tata na ye. Kasi ntango basaleli ya Davidi bakómaki na mokili ya Baamone, 3 bankumu ya Baamone balobaki na nkolo na bango Hanune boye: “Okanisi ete Davidi atindeli yo babɔndisi nde mpo na kokumisa tata na yo? Ezali te mpo na koluka koyeba engumba, kotalatala yango na mayele mpe kokweisa yango, nde Davidi atindi basaleli na ye epai na yo?” 4 Bongo Hanune akangaki basaleli ya Davidi, akataki bango mandefu na ngámbo moko,+ apasolaki bilamba na bango na katikati, na masɔkɔ, mpe abenganaki bango. 5 Ntango bayebisaki Davidi likambo yango, na mbala moko atindaki bato bákende kokutana na mibali yango, mpo basambwaki mpenza; mpe mokonzi ayebisaki bango: “Bófanda na Yeriko+ tii ntango mandefu na bino ekokola, bongo na nsima bokozonga.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto