-
2 Samwele 10:7, 8Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
7 Ntango Davidi ayokaki yango, atindaki Yoabe ná limpinga mobimba ya basoda, ata mpe bilombe na ye ya etumba oyo baleki makasi.+ 8 Bongo Baamone babimaki mpe batandamaki na molɔngɔ ya etumba na esika ya kokɔta na porte ya engumba, wana bato ya Siri ya Soba mpe ya Rehobe, ná basoda ya Ishitobe* mpe ya Maaka batɛlɛmaki bango moko na esobe.
-