-
2 Samwele 10:9-12Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
9 Ntango Yoabe amonaki ete banguna bazali koyela ye na liboso mpe na nsima, aponaki ndambo ya basoda ya Yisraele oyo baleki makasi mpe atandaki bango na molɔngɔ mpo bábunda na bato ya Siri.+ 10 Atikaki basoda mosusu na mabɔkɔ ya ndeko na ye Abishai,+ mpo atanda bango na molɔngɔ mpo na kobunda na Baamone.+ 11 Bongo alobaki: “Soki bato ya Siri bakómi makasi koleka ngai, okoya kosalisa ngai; kasi soki Baamone bakómi makasi koleka yo, ngai nakoya kosalisa yo. 12 Tózala na makasi mpe na mpiko.+ Tóbundela bato na biso mpe bingumba ya Nzambe na biso, mpe Yehova akosala oyo ezali malamu na miso na ye.”+
-