-
2 Samwele 24:15, 16Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
15 Bongo Yehova atindaki maladi mabe+ na Yisraele kobanda na ntɔngɔ tii na ntango oyo etyamaki, mpe bato 70 000 banda na Dani tii na Beere-sheba*+ bakufaki.+ 16 Ntango anzelu asembolaki lobɔkɔ na ye na Yerusaleme mpo na kobebisa yango, Yehova ayokaki mawa mpo na likama yango,+ mpe alobaki na anzelu oyo azalaki komemela bato libebi ete: “Ekoki! Sikoyo kitisá lobɔkɔ na yo.” Anzelu ya Yehova azalaki pene na esika ya kotutatuta mbuma ya Moyebusi+ moko na nkombo Arauna.+
-