31 Yehova afungolaki miso ya Balaama,+ mpe amonaki anzelu ya Yehova atɛlɛmi na nzela, asimbi na lobɔkɔ mopanga oyo abimisi na libenga na yango. Na mbala moko, agumbamaki mpe afukamaki elongi na nse.
13 Ntango Yosua akómaki pene na Yeriko, atombolaki miso na ye mpe amonaki mobali moko+ atɛlɛmi liboso na ye mpe asimbi mopanga na lobɔkɔ na ye.+ Yosua apusanaki pene na ye mpe atunaki ye: “Ozali na ngámbo na biso to na ngámbo ya banguna na biso?”