2 Samwele 24:18 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 18 Bongo Gade akɔtaki epai ya Davidi na mokolo yango mpe alobaki na ye: “Matá na esika ya kotutatuta mbuma ya Arauna Moyebusi,+ mpe tongelá Yehova etumbelo kuna.” 1 Ntango 21:22 Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika 22 Davidi alobaki na Ornane boye: “Tɛkɛlá* ngai esika oyo ya kotutatuta mbuma, mpo natongela Yehova etumbelo awa. Tɛkɛlá ngai yango na ntalo na yango mpenza, mpo mpasi oyo ekweli bato esila.”+
18 Bongo Gade akɔtaki epai ya Davidi na mokolo yango mpe alobaki na ye: “Matá na esika ya kotutatuta mbuma ya Arauna Moyebusi,+ mpe tongelá Yehova etumbelo kuna.”
22 Davidi alobaki na Ornane boye: “Tɛkɛlá* ngai esika oyo ya kotutatuta mbuma, mpo natongela Yehova etumbelo awa. Tɛkɛlá ngai yango na ntalo na yango mpenza, mpo mpasi oyo ekweli bato esila.”+